Bima Get Out

Bima

Bima.
Na lobi: “bima”.
Atali ngai. A ningani te.
Nazo tuna bino: sikoyo na sala nini? Ndege moko mikolo nioso. Kaka ko tungisa ngai. Posa ya ko betaye!

Nakangi motema. Nazeli lisusu, nde natuni ye: “Oko bima te ya solo?”
A ndimi te. Namoni, a tchiololi ngai. A dongoli ngai mpe abaluki a keyi ko telema esika mosusu. Mawa po na ngai. Na’o sosola bizaleli na ye te.
Omoni, batu mususu, il faut ko lobelaka bango na ba autorité oza nango…soki osali boye te, bakanisi oza bolole.

Na sololi na ye malamu. Nayebisi ye boye : « tala petite, awa, nalingaka batu bakoto te. Kasi ozobeta ba cara na maloba nioso na zo yebisa yo. Sikoyo nazo pesayo likebisi ya suka: bima to nakosilika mabe!”

Atali ngai. Aseki.
Kamata….ma! Mbata azui!
Nabeti ye. Akweyi. Akufi. Azui.
Si, si…na uti koboma nzinzi.
Asakanaki na ngai mingi!

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *